lirik.web.id
a b c d e f g h i j k l m n o p q r s t u v w x y z 0 1 2 3 4 5 6 7 8 9 #

lirik lagu marie misamu – vallée ya bacca

Loading...

oh vallée ya bacca, eloba david na psaumes 84: 6 ti na 7
vallée nde elili ya période
ebongo komb’oyo bacca elakisi kolela
oh nzambe sunga biso

nayokaka vallée ya bacca na sango
vallée ya ba soucis, minioko, pasi pe mawa
yesu mobikisi tala lelo nga na se retrouver na kati na yango
nga nayokaka vallée ya bacca na sango
vallée ya ba soucis, minioko, pasi pe mawa
yesu mobikisi tala lelo nga na se retrouver na kati na yango
oh moto nionso na mokili mwana nzambe oh to mwana nzambe te
epesameli biso toleka na vallée yango po bolingo na biso emonana ah
oh moto nionso na mokili mwana nzambe oh to mwana nzambe te eh
epesameli biso toleka na vallée yango po bolingo na biso еmonana ah

na kati ya lubuaku ya kolela eh
atako oza innocent kasi ozali komona ba cond~mnations na kati ya valléе yango
motema ekoma nga normal pona bapasi, oh nzambe oh
na kati ya lubuaku ya kolela eh
atako oza innocent kasi ozali komona ba cond~mnations na kati ya vallée yango
motema ekoma nga normal pona bapasi, oh nzambe oh

na kati ya vallée ya bacca
motema eyebaka ko corriger toli ya ba conseillers
oyo ya malamu to ya mabe, motema etutami oh
ekawuki lokola lititi eh
na kati ya vallée ya bacca eh
motema eyebaka ko corriger toli ya ba conseillers
ya malamu to ya mabe, motema etutami oh
ekawuki lokola lititi eh

oh nzambe na ngai, soki nazoka na motema likolo ya vallée ya bacca
makila ya motema na ngai ekomi kotika na traces esika nionso nakoleka
nzambe nga nayebi nazoka pona yo, yo nde mosilisi ya bampota na ngai
soki yo te, nani mosusu? soki osungi te soni ya yo moko
nzambe atako butu yango eleki molayi, tongo ekosuka kaka na kotana
na kati ya vallée ya bacca
bonhomme alingaki kosimba nionso ekimi nde kokima
mosika na ngai oh na kati ya vallée ya bacca, motema pasi oh
na kati ya vallée ya bacca eh
bonhomme alingaki kosimba nionso ekimi nde kokima
mosika marie oh na kati ya vallée ya bacca, motema pasi oh

na kati ya vallée ya bacca
ekomaka pasi pona moto aya kotala yo ata motema eboyi séparation
okomona kaka ezali koyela yo, nga nakima wapi oh
na kati ya vallée ya bacca
ekomaka pasi pona moto aya kotala yo ata motema eboyi séparation
okomona kaka ezali koyela yo, nga nakima wapi oh

nzambe osali nga monganga ya bapasi po naconseillaka ba oya baza koleka na kati ya vallée yango, ndeko soki vallée ya bacca ekomeli yo, yo talelaka bobele nzambe, mpo ye nde mosungi ya kokamua, ye nde mobali kitoko
soki atomboli yo, moto moko te akoki kotelemela yo, na makasi na ye ekokoka te liloba ya suka ezali epayi na ye, yo talelaka bobele nzambe

ah vie na nga ekoma lokola monganga oyo ya ko examiner makambo ya mabe to ya malamu
yo nzambe omoni oh
vie na nga ekoma lokola monganga oyo ya ko examiner makambo ya mabe to ya malamu
yo nzambe témoin na ngai oh

nzambe naye naye osunga nga mpo nga moto ya liboso naleka yango te oh
david na ye ndeko na ye mpe alekaki ye alongaki eh
yango alobaki ete esengo na moto oyo kotia elikia na ye epayi ya nzambe oh, oh nzambe oh
ata naza ko traverser na nga na kati ya lubuaku yango eh
nzambe okobongola yango esika na esengo pe makasi na moto oyo azali koleka na kati, eh

vie na nga ekoma lokola monganga oyo ya ko examiner makambo ya mabe to ya malamu
yo nzambe omoni oh

moninga soki eyeli yo te oh, okoyeba oh kilo na yango te oh
moninga soki eyeli yo te oh, okoyeba oh pasi na yango te oh
baninga nzoka esuwaka boye oh
baninga nzoka esuwaka boye oh


Lirik lagu lainnya:

LIRIK YANG LAGI HITS MINGGU INI

Loading...