lirik.web.id
a b c d e f g h i j k l m n o p q r s t u v w x y z 0 1 2 3 4 5 6 7 8 9 #

lirik lagu marie misamu – eh yahweh

Loading...

eh yawheh, eh yawheh k~mama
eh yawheh oh, eh yawheh k~mama na yo
eh yawheh, eh yawheh na ngai oh k~mama eh
eh yawheh, papa na bana eh k~mama
natali na bibilia ngai na moni anna eh
oyo azalaki ekomba masiya
opesi ye samuel eh na nguya na yo
yo nde nkolo ya bana eh, opesaka mabota eh
pesa na ba oyo bazangi mpo bak~misa yo eh
les 4 êtres vivants bavandi na kiti na yo nzambe
bazali kotatola y’oza mosantu, yawheh k~mama na yo
eh yesu, makambo oyo osalelaka biso
mitema oyo otutisaka biso nzambe
vraiment natali na likolo, natali na se
moko te akokani na yo papa

na liziba ya bethesda obikisa malade
papa nani akokani na yo?, y’oleki nguya eh
yo mobikisi ya babeli eh, babеngi jehovah rapha eh
loboko na yo mokuse té olobi nini papa еh
na tangi na bible mwasi okotanga makila
asimbaki elamba na yesu azuaki lobiko k~mama
eh yahweh eh yahweh eh yahweh, yahweh
papa olobi nini eh?
nakima wapi? nabatama wapi schilo?
nakomi lokola jonas na libumu ya mbisi destination inconnu
bilamba ya congo ekomi biteni biteni eh
misuni ya ba congolais ekomi bipayi na bipayi olobi nini?

oh moningami kati na nkolo
soki omoni pasi ebelemi na porte na yo
kamata trompette n’o betela nkolo
yango nde libondeli ako yoka yo

k~mama eh yesu oyo

k~mama papa eh, k~mama papa eh, k~mama papa eh
k~mama
nakoma pe koseka ngai oyo
basombelaki nga lopango nalilita
na kufa lelo lobi mosika
soki makambo ekomeli yo ndeko
f~kama buaka misolo likolo
ganga au secours eh yesu oyo
ngai nalingi na yebisa yo nde makambo
nayebi te ndenge nini ya kobanda
yo moko kamata ba phrases na ngai oh
classer yango ndenge olingi eh
oza na suki ya pembe, babengi sagesse eh
k~mama eh yesu oyo (eh papa)
olati robe ya pembe nzambe, babengi sainteté yesu eh
k~mama eh yesu oyo
olati ceinture na loketo, babengi verité nzamb’oyo
tika nga pe na lobaka kaka verité
eh na makolo na yo mapapa eh, babengi saine evangile
tika nga na teya liloba na yo
mongongo n’o eleki kutu ya bakake oh, babengi yango autorité
k~mama eh yesu oyo
yo nde mobikisi ya ba malades ba lembana, nkolo na bana eh
k~mama eh yesu oyo
papa ngai nalingi na yebisa yo nde makambo
nayebi te ndenge nini ya kobanda (k~mama papa nazokoka koloba te, seigneur)
miso na yo ebimisaka ba moto, babengi yango lumière eh
yo nde motambwisi ya bana eh
na bengaka yo monsieur raison eh, ozalaka kaka na raison (monsieur raison na ngai oh)
k~mama eh yesu oyo
ngai natali likolo natali mabele ba niama na zamba ba mbisi na mayi oh
nabangi monene na yo
nzambe esika mayele na nga esuki oh, ya yo ebandi eh
k~mama eh yesu oyo
omoni libondeli na nga ya chambre, lelo nayembi na loyembo
sekele na nga ebimi eh
k~mama eh yesu oyo jesus jesus jesus
ah apa ya bana, papa libota ebele (papa libota ebele)
papa libota monene eh yesu oyo (papa libota monene)
nazanga papa eh, na zanga maman eh
yo nde okoma nionso na ngai oh
soki malade ememi yo na suka, kamata trompette na yo eh
trompette yango nde liloba na nzambe
lobela nga na litoyi ya droite, oyo muasi na mobali na ye
yo nde nkolo ya libala eh
soki mosala ezangi yo ndeko, soki kimia ezangi yo ndeko
kamata trompette betela nzambe, yango nde libondeli eh
soki kobota eza kotungisa yo, soki pe kimia ezangi eh
kamata trompette betela nzambe, ye nde nzete ya mbila eh
papa eh yawheh, papa eh yawheh (yesu oza wapi? yo nde kimia ya mitema na biso, yo nde mayi na biso ya komela)
mayi ya ko mela ya vie na nga eh, nazuaka epayi na yo eh yesu
yo nde mayi na nga oh, yo nde kimia na nga
papa eh yawheh, papa omoni ba mpota na mitema
sembola loboko, sembola loboko banguna bakamua
papa soki bato batuni ngai balobi na loba kaka phrase moko ezala mokuse mpe ezala efficace, nako yebisa yo sala na ngai oyo nionso yo olingi mpo yo nde nkolo na ntango
mema ngai esika yo olingi mpo yo oyebi motema na ngai koleka ngai moko…


Lirik lagu lainnya:

LIRIK YANG LAGI HITS MINGGU INI

Loading...