lirik.web.id
a b c d e f g h i j k l m n o p q r s t u v w x y z 0 1 2 3 4 5 6 7 8 9 #

lirik lagu ferre gola – pito lukaya

Loading...

[intro]
bolingo ya pito etambwisi nga moto
koleka zachée tango ayokaki sango ya mwana nzambe
esengaki amata na nzete po amona ndenge nini akoya
nga pe namata wapi po namona ndenge bolingo ekozonga
peut-être akolobela nga lelo “nakolala epaï na yo”
esengo ekozala leko koleka ba angelu na lola
soki mopaganu abungoli motema awa na se

[couplet 1 : chanteur de ferré gola]
nzambe likunia etumbu ya makasi ba pelisi yango moto bolingo ekoki ko pela sans pétrole n’allumeti
awa opesi ba mbanda permission ya kodéfiler na miso na ngaï
c’est qu’otié bolingo à vendre
pito lukaya

[couplet 2 : ferré gola]
awa okotisi motema na nga na soin intensif
po kuna moto te akoya ko rendre nga visite
ndenge porteur amesana na kilo sac ya bandi na moto
minu emesana kokata lolemo bileï na monoko
ndenge nga namesana na yo
soki nzoku mokolo akomi olemba mino na yé, eza pasi na fourmi po atumbola eteni ya lipa
mwana na libumu ya mama atunaka té zemi yango ekotaki wapi
l’essentiel abotama na ye na mokili ya nzambe
ngungi ata omemi ye na usine ya miliki eza koempecher ye te po a piquer po eza musala na ye
quelque soit gentillesse ya chauffeur na taxi, eza koempecher te ba clients na ye bafuta ticket

[pré-refrain]
sans le fleuve nil, l’egypte elingaki kozala désert
kozanga yo lukaya motema etikali terre vide

[pré-refrain]
sans le fleuve nil, l’egypte elingaki kozala désert
kozanga yo lukaya motema etikali terre vide

[refrain]
sekele ya vie, le coeur ne l’oublie jamais
ata molili, miso na nga emoni yo té
na mongongo nayebaki ezali pito lukaya
lokola bébé a se referaka na solo ya nzoto po a identifié oy’a ye mama ah

[couplet 3 : ferré gola]
pito na nga lukaya, kokanga motema té
soki bafungolaka ntima, okomona oy’a ngaï
ndenge ozosala ngaï jigal nzau azo sepela té
ndenge ozosala ngaï chantal bola azo sepela té

[refrain]
sekele ya vie, le coeur ne l’oublie jamais
ata molili, miso na nga emoni yo té
na mongongo nayebaki ezali pito lukaya
lokola bébé a se referaka na solo ya nzoto po a identifié oy’a ye mama ah

[couplet 4 : ferré gola]
ba mpangi ya vincent pito lukaya
balingi bakabola yo ya mbalangata
est-ce que nakovivre tuna jules nsana
pito nalingi omema ngaï na likolo

[refrain]
sekele ya vie, le coeur ne l’oublie jamais
ata molili, miso na nga emoni yo té
na mongongo nayebaki ezali pito lukaya
lokola bébé a se referaka na solo ya nzoto po a identifié oy’a ye mama ah

[couplet 5 : ferré gola]
pito nalingi omema ngaï na likolo
pito nalingi omema ngaï na cuba
lukaya nalingi omema ngaï na guatemala
pito bombisa bolingo epaï francis luya

[refrain]
sekele ya vie, le coeur ne l’oublie jamais
ata molili, miso na nga emoni yo té
na mongongo nayebaki ezali pito lukaya
lokola bébé a se referaka na solo ya nzoto po a identifié oy’a ye mama ah

[outro – dédic-sse de ferré gola]


Lirik lagu lainnya:

LIRIK YANG LAGI HITS MINGGU INI

Loading...