lirik.web.id
a b c d e f g h i j k l m n o p q r s t u v w x y z 0 1 2 3 4 5 6 7 8 9 #

lirik lagu shiii - lumumba

Loading...

#intro
(c’est ultron qui fait la musique)
(braga)

#verse
ndeko nayebi te soki il faut to ndima banga kaka nde bakosaka
bwaka mua coup d’œil mupanzii omona ndenge batu ya vestes ba bundaka
batu bao kufa na mpiaka boyemba mboka elengi mais est~ce que ezalaka?
changement ezali te mais pouvoir ezali na makambu oyo nalobaka

mwana otindaka classe ye wana akoma naye mutu ya désordre
eza faute naye te mboka na biso pe ezaliii na désordre
rdc kolia na passi ko bota na désordre
bazo zela yesu akita biso tozo zela nanu taux e descendre

nyonso е’a ya’o loba bayebi que to’o na niveau ya mwamba na gâtеau
soki okabeli ye garder dignité naye eza te il faut okanga ye ba photos
yo nde mutu ya mayele oyebi combien des licenciés bazo k~mba ba moto
so’o omoni ezo simba te c’est parce que ozo confondre réalité na ndoto

mayi ya miso esila nakoki ko souhaiter yo kaka mes condoléances
eza manque ya connaissance nde ezo tindo des fois olekisa vitesse
parents apesaka mwana naye mbote te abosani c’est quoi la politesse
makambu azo mona ezo lekele mwana ye moko amizueli indépendance

problème congo eza ba congolais botika ko finga ba autorités
ba pasta ba mvuama ba ndimi bao kemba bao teya bino tout est vanité
30 ans chez les parents ambiance o’o tika après oko loba que mboka eza bien te
k~misa nzambe opo okeyi liboso mais oyo atikali ko seka ye te !
nalongoli mundelo entre ba oyo bazua na ba oyo bazo potana
faiblesse ekota depuis que bayeba ko bonga nyonso eza ya satana
mwana ya mobola soki nazuiii lelo te lobi ata ya mukie eko monana
division ekota tiiii na biloko yako lia combien des familles esi penzana?
bavandaka esika moko eglise moko na kati mitema bayinana
a cause ya prédication ezanga tina tozangi na moyen yako sungana

pauvreté ezali maladie oyo esilaka soki yo moko ozuiii décision
congolais ao mona lifelo te po oyo tozo vivre eza débat punition
toza na guerre mais sans munitions
ba écoles mais sans éducation
batu bayebi mibeko kaka bango nde bazo violer constitution
so’o nalobi eza fin du monde c’est parce que tokomi na mauvaise génération !

wapi bana oyo ba bandaki koloba que biloko ya batu naliaka te?
wapi batu oyo ba bandaki koloba que ndaku ya nganga nako kota te?
wapi ba pasteur oyo ba bandaki ko teya batu na intérêt ya mbongo te?
wapi ba mamans oyo bazalaki na mitema koyina baba mbanda te?
wapi ba temps oyo tozalaka alaise toyebaka ba réseaux sociaux te?
wapi bana malamu oyo ba bandaki kotika mipende libanda te?
wapi basi ba bandaki koloba nzoto nanga avant libala te?
wapi basi ba bandaki koloba bolingo eza kaka na mbongo te?
wapi ba masta bazalaki ba bebani ba pwatani ba secrets te

naza na posa ya vérité des urnes te po na sauver l’humanité
ba races ya musiciens lokola biso tozalaka toujours saboté
aza ne mukolo mais a gereka bien te aza na problème ya maturité
naza oyo naza eza te pona yo nde nao changer identité


Lirik lagu lainnya:

LIRIK YANG LAGI HITS MINGGU INI

Loading...