lirik.web.id
a b c d e f g h i j k l m n o p q r s t u v w x y z 0 1 2 3 4 5 6 7 8 9 #

lirik lagu shaloom (rdc) - poso ya meme

Loading...

liziba ya mayi ya komela, ebimisa ya mungwa te oh
baklisto tokomi komonisa bomoyi ya masumu pona nini eh?
elamba ya sika babamba kitendi ya kala te oh
baklisto tokomi kozongela bomoyi ya kala pona nini eh?

pona nini, pona nini eh?
tokoma kozongela nionso totika
pona nini lelo oh ?
tokoma lisusu kosala masumu ?
ngulu basokoli, azongi na potopoto
pe alie asanzi, azongeli pe alie lisusu, ye ye
ngulu basokoli, azongi na potopoto
mbale asanzi, azongeli pe alie lisusu, ye

nzambe papa na nguya, azali kaka kolela
bizaleli ya motindo oyo na bana na ye
nzambe papa na nga, azali kaka kolela
bizaleli ya motindo oyo eh na bana na ye

mabele tala yе, lola yoka
naboti nabokoli kasi batombokeli ngai nasali nini eh ?
mabelе tala ye, lola yoka
naboti nabokoli kasi batombokeli ngai toweli nini eh ?
tango yango oyo eh (tango yango ebelemi)
tango yango shaloom eh (tango yango ebelemi)
(totika kobomba nzoto ya nkoyi na kolata poso ya meme, eh, eh)
ah eh tango yango oyo eh (tango yango ebelemi)
tango yango pasteur fuita (tango yango ebelemi)
(totika kobomba nzoto ya nkoyi na kolata poso ya meme, eh, eh)
aye tango yango oyo eh (tango yango ebelemi)
tango yango piko kapinga eh (tango yango ebelemi)
(totika kobomba nzoto ya nkoyi na kolata poso ya meme, eh, eh)

tango ya primitive eh, bankosi pe bazalaka
balataka poso ya meme pona komibomba
bayebana te eh
tango ya pasteur pierre, bankosi pe bazalaka
balataka poso ya meme pona komibomba
na lisanga ya bana na nzambe eh

anania aye na saphira bateki elamba motuya makasi
bankosi basali na nzambe eh, sima liwa eyaki na ligomba
yoka mawa [?]
ndako batongi na mbongo, ebombanaka te
moko te ya molili ekotikala ya kobombama
miso emonaka na polele

bapelisaka mwinda te, pona kotia na se ya mesa
na likolo yango egengisa ndako mobimba
ba [?] oyemba na ngai aah
yeba moklisto ozali mwinda
lisusu y’ozali mungwa ya mokili
soki obungisi elengi na yo
okobwakama pe, okoniatama na makolo eh
mabele tala ye, lola yoka
naboti nabokoli kasi batombokeli ngai nasali nini eh ?
mabele tala ye, lola yoka
naboti nabokoli kasi batombokeli ngai toweli nini eh ?

tango yango oyo eh (tango yango ebelemi)
tango yango modenzila eh (tango yango ebelemi)
(totika kobomba nzoto ya nkoyi na kolata poso ya meme, eh, eh)
ah eh tango yango marie eh (tango yango ebelemi)
tango yango mama solange eh (tango yango ebelemi)
(totika kobomba nzoto ya nkoyi na kolata poso ya meme, eh, eh)

zola mavuemba na pepako (tango yango ebelemi)
henrie toko na niele (tango yango ebelemi)
w~lly kabasele na [?] (tango yango ebelemi)
alpha luchima na chapelle (tango yango ebelemi)
radio elikia, radio sango malamu eh (tango yango ebelemi)
message de bible pe na musique eh (tango yango ebelemi)
ridon manda, hypo manda (tango yango ebelemi)
jacques makiese, jacques nzuzi eh (tango yango ebelemi)
philo mpongo, alain mpongo ( tango’ango ebelemi )
blanche etuba, blanche takayi eh (tango yango ebelemi)
tango yango oyo oh (tango yango ebelemi)
tango yango oyo ma nelly (tango yango ebelemi)
eyemba kopinda mokolo mwa lobi (tango yango ebelemi)
mokolo ya lobi ezali ya nzambe (tango yango ebelemi)
tosala lokola nicodème eh (tango yango ebelemi)
alukaka masiya na butu ah eh (tango yango ebelemi)
(totika kobomba nzoto ya nkoyi na kolata poso ya meme, eh, eh)

Lirik lagu lainnya:

LIRIK YANG LAGI HITS MINGGU INI

Loading...