lirik.web.id
a b c d e f g h i j k l m n o p q r s t u v w x y z 0 1 2 3 4 5 6 7 8 9 #

lirik lagu marie misamu - mokili compliqué

Loading...

nayemba na balobaka, nayembaka pe na associé oh
nayemba na pongo, nayemba pe na salela ngai bikamua
lelo nayembi na mokili compliqué oyo nabengi matolo eh ye

mokili oyo mabaku eh mokili surprise
yaya kangama makasi noki nakokutana na ba oyo
bako bungisa ngai na nzela na yo eh, eh yaya eh

kangama makasi lokola moto oyo bazui na nioka eh
venin eleka na nzoto na ngai te yaya nakokufa na poison oh

kangama makasi lokola moto oyo azoki pota monene
makila ezobima na nzoto na ngai oh nga nakokufa na hémorragie oh
nasalisa batu ebele oh, suka suka déception eh
yaya mokili oyo mabaku eh, mokili oyo surprise oh
yaya simba ngai loboko tokende mokili oyo pasi eh
eh, yaya na ngai oh

ah ngai na mokili natalela moto te natalela prêtre des prêtres yesu eh
okutani na moto na nzela osengi ye asalela yo bikamua
koluka bato ya mosolo eh, obeta matolo eh

ebongo tango biso tokufaka totobeli maladie oyo minganga bakoka te oh
yango nde suka ya makambu eh moto ya mokili nde limité oh
apesi yo atongi yo na [?] alingi mokili mobimba bayeba oh
moto yango asilisa penza na yo te apesi yo lelo abwakisi yo
kasi soki yesu apesi yo abeta lisolo na moto te oh
yo moko okokoma bilobaloba eh moto te akotindika yo
mayi ya miso ya kati eh apangusuaka’ango oh
botika kobetama tolo na yesu eh ye
apakola ngai mopakoli ya babola oh
viens nzambe oyo ofula ngai oh
mfumu ya buala na beto bataleli yo
eh mokonzi ya basali ebele salisa ngai oh

bato ya mokili baluka babetama tolo epayi ya batu eh
oh mikolo oyo vieux wana azopesa azotala te bato nionso balandi
wana esili eh abambami oh asili kasi oh
kasi vieux na ngai yesu boss des boss jéhovah [?] asilaka te
bato ya mbongo batonga ba villas bakosa
mokili oyo ya vieux na ngai bino nionso ba locataires ya yesu eh
oh vieux moko abimi kuna ba mbongo na mituka na danze
koti ya milele ah, koloba te oh
oh mère yango ba beautés tala mikili ekosa mikili pamba pamba eh
asopa ba mbongo fort mofuli ya ba musicien na ba schegué
epayi ya vieux na ngai nzambe mituka ba mbongo tina te oh
abima na cheval ya pembe
vieux épée na maboko suki pembe, mandefu pembe vieux na ngai le plus beau
miso na yo ekongenga eh lokola molili na vie na ngai eh
baninga na ngai boya tobeta matolo na yesu eh ye
eh vieux nzambe fula nga oh
grand prêtre yesu eh pakola ngai oh
pardon sala ngai nazala oh
koseka ngai te lelo oyo po omoni naza mobola oh
oyebi lobi na ngai te tango mosusu okosala na compagnie na ngai yo
ah nga mwana bilaka eh, nabungisa elikya po nini ?
ah ngai oh (elongo na yesu nakolonga eh)
ah olobi nakankangama na elamba moko eh oyebi te lobi na ngai oh
tango ozui lelo oyo oh koseka basusu te
okoseka lelo oyo obosani naza mwana bilaka
ah ngai oh (elongo na yesu nakolonga eh)
hum ngai natutaka tolo na vie po nayebi naza na tata ya solo
otumboli ngai oh zela tango akosalela ngai oh
yango lipamboli na ngai oh basusu bako kima mboka oh
ah ngai oh, nakolonga ngai oh (elongo na yesu nakolonga eh)
ndeke libanga ezui [?], ndeke koseka ye te
lelo ekomeli ngai lelo oyebi lobi na ngai te oh
nzambe akosala oh (elongo na yesu nakolonga eh)
ndeko na ngai oh olela pona nini ko ? y’oko mwana bilaka eh
ata yango ewumeli oh yika mpiko okozua oh
yo kutu vieux na yo akosaka te oh iye

(mwana bilaka oh)
mwana bilaka’ango (mwana bilaka oh)
yango otalaka ngai na soni tala ngai malamu
okomona nga na bilembo ya tata oyo
(mwana bilaka oh, mwana bilaka oh)
olingi ye afungola yo miso omona kibokonzi na nga
(mwana bilaka oh, mwana bilaka oh)
tala ngai na miso ya molimo ata na pasi oh naza mwana bilaka oyo eh
(mwana bilaka oh, mwana bilaka oh)
finga ngai po lelo nazangi
(mwana bilaka oh, mwana bilaka oh)
basusu balanda ba familles ya kombo
biso bana ya babola toyokana na kombo ya yesu eh
(mwana bilaka oh, mwana bilaka oh)
ngai kutu babwaka ngai na libala pona mpiaka eh
(mwana bilaka oh, mwana bilaka oh)
keba likopa na yo ekokanisa ngai naza mwana ya niawu te
tala ngai malamu mwana nkosi oh
(mwana bilaka oh, mwana bilaka oh)
soki otindiki ngai na geste nakoya na niama eh
yo okozonga na mpuku eh
(mwana bilaka oh, mwana bilaka oh)
keba kokanisa ngai na mwana soso te naza mwana aigle
mboka na ngai likolo
(mwana bilaka oh, mwana bilaka oh)
mokolo mapapu ekoya nakopumbwa nakozonga na ngomba oh
(mwana bilaka oh, mwana bilaka oh)
yango osalaki erreur obwaka ngai madesu epola oh na mabe na malamu eh
(mwana bilaka oh, mwana bilaka oh)
naboti mbuma oh, zua mayi eh
(mwana bilaka oh, mwana bilaka oh)
yo kutu bapekisa yo na banganga komeka ngai te oh
naza mwana bilaka oh
(mwana bilaka oh, mwana bilaka oh)
keba okobela liboma
(mwana bilaka oh, mwana bilaka oh)
esi namema ngambo nabwakisa te [?] nalanda nzambe oyo eh
(mwana bilaka oh, mwana bilaka oh)
soki napengwi bazokanga ngai oh napengwa po nini ?
(mwana bilaka oh, mwana bilaka oh)
nzambe oza capable ya koyebisa bobengo na ngai eh
lokola nzungu ya veuve ya sarepta
(mwana bilaka oh, mwana bilaka oh)
ekawukaki te oh, banga nzambe
(mwana bilaka oh, mwana bilaka oh)
yango mokili elobaka oh bomela ngai moto kotshiola nga nanu te oh
(mwana bilaka oh, mwana bilaka oh)
ah luka makambo y’okomona
(mwana bilaka oh, mwana bilaka oh)
yango mboka elobaka eh bomela ngai moto eh kofinga nga nanu te oh
(mwana bilaka oh, mwana bilaka oh)
ah eh luka makambo y’okozua oh
(mwana bilaka oh, mwana bilaka oh)
ngai oyo natika te (ngai eh)
natika te
(mwana bilaka oh, mwana bilaka oh)
ngai oyo natika te oh
hum natika
(mwana bilaka oh, mwana bilaka oh)
ata na lagome oh ngai oyo nakodusola eh
(mwana bilaka oh, mwana bilaka oh)
ata ba mpiaka oh ngai oyo nakodusola eh
(mwana bilaka oh, mwana bilaka oh)
bomoni ndenge yesu afuti ngai nafandi na mikoti eh
(mwana bilaka oh, mwana bilaka oh)
yesu oyo eh
ngonga ya réveil na ngai ebeti
bimbo na nga etoboki


Lirik lagu lainnya:

LIRIK YANG LAGI HITS MINGGU INI

Loading...