lirik.web.id
a b c d e f g h i j k l m n o p q r s t u v w x y z 0 1 2 3 4 5 6 7 8 9 #

lirik lagu marie misamu - mawa na ngai ekoki te

Loading...

koya na yesu ekomi pene oh
oh lokola moyi molili tobima oh
oh kasi libota na nzambe bazali kolala oh
yango nde oh mawa na ngai

koya na yesu ekomi pene oh
oh lokola moyi molili tobima oh
oh kasi libota na nzambe bazali kolala oh
yango nde oh mawa na ngai

soki mayi ya miso na ngai oh ezalaki monene lokola ebale
mbele nga nalelaka na ngai oh kino libota ebika oh
ima wo wo wo wo wo
soki mayi ya miso na nga marie ezalaki monene lokola ebale
mbele nga nalelaka kaka oh kino libota ebika

boyaka oh po nabuka oh (baninga na ngai eh, tango ekomi mokuse)
boyaka oh po nabuka oh (ah ye ye)

soki nazalaki engunduka oh mbele nakenda na gare
nga nasangisa bana na nzambe oh po tofanda esika moko eh
ima wo wo wo wo wo
soki nazalaki na nga masuwa mbele nasenga na libongo eh
nga talaka bana na nzambe oh po babunga te oh

boyaka oh po nabuka oh (baninga na ngai oh, tango ekomi mokuse)
boyaka oh po nabuka oh (ndeko welela tango eh)
bino libota na masiya eh, bino botikaka lolendo
soki bolingo ekuti yo eh ndeko salela ye oh
pona lobiko na ngai na yo eh kuna na ngomba gologotha
papa, ye agangi “eli, eli lama sabactani”

boyaka oh po nabuka oh (baninga na ngai oh, tango ekomi mokuse)
boyaka oh po nabuka oh (ndeko welela tango eh)

soki nazalaki na mbongo mingi mbele nasangisa bandimi nionso eh
bofanda na ndako na nga eh kino mokolo akoya eh
po nalingi bino mingi oh
soki lobiko eyaka na mbongo mbele nazala makasi eh
ah nga nakoma na mbongo eh po nga nabikisa baninga

boyaka oh po nabuka oh (baninga na ngai oh, tango ekomi mokuse)
boyaka oh po nabuka oh (nga nalingi bino mingi oh)

soki lobiko eyaka na police oh mbele nafunda bandimi nionso eh
tokende kosamba oh po kaka babika oh
ima wo wo wo wo wo
soki nazalaki na nga soleil oh mbele nafanda na likolo eh
nga nakengela bana na nzambe oh po babunga te oh

nzambe na ngai oh likambo oyo pasi mingi oh
nzambe na ngai oh likambo oyo somo mingi oh
nzambe na ngai oh opesa bomoyi na yo pona ngai oh
nzambe na ngai oh nga nakoka te kofuta oh
niongo na yo eh nga nakoka te kozongisa oh
ah papa po yango eleki makasi oh
ah papa po yango eleki kilo eh, eh
ndeko na nga oye awa ye ye y’obongoli motema na yo
libota ezali wapi oh
mama akomi wapi oh, ba chéris bakei wapi oh
eh bango nionso basili kopengwa eh

nzambe na ngai oh likambo oyo pasi mingi oh
nzambe na ngai oh likambo oyo somo mingi oh
nzambe na ngai oh opesa bomoyi na yo pona ngai oh
nzambe na ngai oh nga nakoka te kofuta oh
niongo na yo eh nga nakoka te kozongisa oh
ah papa po yango eleki makasi oh
papa po yango eleki kilo eh, eh

mawa na ngai ekoki te, yesu nasali na makasi
na bapasi na nzoto oh, moko nabikisa bana na yo
papa nakoki te yo moko osunga
po mawa na nga esila, amen


Lirik lagu lainnya:

LIRIK YANG LAGI HITS MINGGU INI

Loading...