lirik.web.id
a b c d e f g h i j k l m n o p q r s t u v w x y z 0 1 2 3 4 5 6 7 8 9 #

lirik lagu marie misamu - libota

Loading...

eh bandeko nawuti [?] mobembo yango molayi
yango nazongeli bino [?] bosepeli te
bandeko boyambi ngai malamu te pona nini boye ko ? bolingaki ngai natikala kuna libela

yaya yesu oh yo yo yo
yaya yesu eh ye ye ye
yaya yesu oh yo yo yo
yaya yesu eh

eyano bazongisi ngai bayambi ngai na toto
tobandi kolela bandeko likambo nayebi te
ebongo balobi na ngai mobembo okendaki
ndeko na sima na yo libota nionso basilaki kokufa

yaya yesu ozali wapi ? (eh yaya)
yaya yesu ozali wapi ? (yaya yesu eh ye)
yaya yesu ozali wapi ? (eh yaya eh)
yaya yesu oh

bandeko baloni bango balobi nakende kotia fumé
nasopa pe mayi po bapola noki
eyano bazongisi ngai moto akokani na [?] te
soki akufi na ye oh akende libela eh

yaya yesu ozali wapi ? (yaya)
yaya yesu ozali wapi ? (eh yaya yesu eh)
yaya yesu ozali wapi ? (yaya)
yaya yesu oh
pasteur flory pangi, pasteur kutino, pasteur auguy mbona na mangembo, papa kankienza, papa kiziamina, bosunga ngai, bosunga ngai

ebongo vie na ngai (vie na ngai mwana)
natikali ngai moko (maboko pamba)
eh nani akosunga nga eh (ah yaya yesu)
oh natandi biloko nakufi na nga se ya kokufa eh

libota na nga, libota na nga (ah nga yaya)
libota na nga, libota na nga (ah nga yaya)
nalela libota na ngai oh ya yo ? (ah nga yaya)
bozalaki wapi ya yo (ah nga yaya)
oyo [?] libota na ngai nakufa (ah nga yaya)
lelo oyo etikali papa na ngai oh (ah nga yaya)
lelo oyo etikali mama na ngai oh (ah nga yaya)
nalela libota na ngai oh basili kokufa (ah nga yaya)
nalela libota na ngai nazangi bango (ah nga yaya)
ah nga nalela libota na ngai yo ya yo (ah nga yaya)

pasteur jean bosco, osupu na gpp
bosengela ngai kimia epayi na nzambe

yo nde nzambe na ngai eh, yo moto obeti ngai fimbu
nazoki na motema, yo moko pe osilisaka pe bapota oh ye

yawe eh, yawe (yawe)
ngai natingama se yo yawe (oh yawe)
yo mobandi ya bapota na ngai yawe (yawe na ngai)
yawe eh, yawe (eh yawe eh)
ngai natingama se yo yawe (eh yawe eh)
yo mobandi ya bapota na ngai yawe
ah pasteur malu, mama émie, pasteur sony kafuta na bamama ya sarah

sikoyo nakomi moto na esengo bapota esili
ngai nazui libota mosusu kati na ye
sikoyo nakomi moto na esengo bapota esili
ngai nazui libota mosusu kati na yesu

yaya munu yaye (yaya munu eh ye)
yaya munu yaye (yaya munu eh ye)
eh [?] (yaya munu eh ye)
longola loboko na litama eh (yaya munu eh ye)
tika kolela lela moninga na ngai oh (yaya munu eh ye)
eyi yaya munu yaye (yaya munu eh ye)
eyi yaya munu yaye (yaya munu eh ye)
eyi baninga bosunga ngai oh (yaya munu eh ye)
eh yaya munu yaye (yaya munu eh ye)
eh yaya munu yaye (yaya munu eh ye)

(paroles en kimbala)
[?]
ya yesu nzambi wu baby kwayo, ya yesu nzambi wu papa mbona
[?] désiré ngolo, [?] didier ngolo, [?] gégé ngolo
[?], alleluia

beno kwisa tukili na nzambi mfumu na beto mawe (eh)
beto kwisa (eh) beto kina kina (kina)
beno kwisa (eh) atukili na mfumu na beto nzambi eh
eh beno kwisa kina eh kine eh kina (kina)
kina kina (kina) kina muwila yesu eh ( eh)
beno kwisa, beno kwisa kukili na mfumu na beto nzambi eh (eh)
beno kina (kina) kina kine kina muwila yesu (kina)
mame mame mame lelele ya mawa
mame mame mame lelele ya mawa…


Lirik lagu lainnya:

LIRIK YANG LAGI HITS MINGGU INI

Loading...