
lirik lagu l'or mbongo - mongongo na yesu
motema na ngai ek~misa yo
nakende wapi soki na yo te
tango motema ekomaka na suka
opesaka ngai eyano (bis)
ata na pasi na kotika yo te
natingama na ngai kaka se na yo
otelemisaka makolo na ngai
esika basusu bazinda (bis)
ata namoni nzela eza molili
na kobanga molili ya nzela te
olakisaka ngai nzela
esika natia lokolo (bis)
na mboka na ngai
toza kosela lisungi ekowuta epayi na yo
na mboka ya congo totatoli ete
oza nzambe na bolingo (bis)
oh yesu oyo
refrain:
mongongo na yo (alléluia baba, baba)
ebukaka ba ngomba
na bomoyi ya bato nionso ekotosaka yo (bis)
(oh na kombo na yesu)
mongongo na yo
molimo etosaka
tokomi balongi kaka pona kombo na yo (bis)
(oh ngai naza moto na esengo)
naza moto n’esengo
se pona kombo na yo
na koyembela yo loyembo ya motema na nga (bis)
Lirik lagu lainnya:
- lirik lagu cevid 19 - demasiado
- lirik lagu jahkoy - someone else
- lirik lagu linda eder - if i can’t have you
- lirik lagu absurd heartbreak - together at last
- lirik lagu john sakars - compassion for all
- lirik lagu elissa - awel mara | اول مره
- lirik lagu ezequiel vanegas - slow dancing in a burning room
- lirik lagu julianno sosa - bandido
- lirik lagu psycho rhyme - moje jméno
- lirik lagu cejotaofficial - everytime