lirik.web.id
a b c d e f g h i j k l m n o p q r s t u v w x y z 0 1 2 3 4 5 6 7 8 9 #

lirik lagu kongoliz - kita o sala

Loading...

[intro]
yoka !
(ygod)
kita o sala (sala !)
kita o sala (sala ! sala !)
to leka !

[refrain]
ba yindo to sala yo nini kolo ? (tala !)
o ke ko batama likolo (kala !)
ba pasi na biso yaka o silisa (mawa !)
kita o sunga bato o zelisa (sala !)
to sala yo nini kolo ? (tala !)
o ke ko batama likolo (kala !)
ba pasi na biso yaka o silisa (mawa !)
kita o sunga bato o zelisa (sala !)

[couplet]
kita o se po o sunga mokili
yaka epayi na biso
o kenda, o tika biso na molili
mawa, mayi na miso
awa e beba, yaka ko bongisa (bongisa !)
bitumba yaka ko longisa (longisa !)
na yoki ba bengi yo mwana na nzambe, kimia yaka ko zongisa (zongisa !)
ebele ba ndima ko zela, ba zela (hm !)
ba wa ba kenda (mawa !)
basusu ba bwaka bondimi na nzela (tala !)
tala, awa ba lenda (kala !)
to yoki nde o bikisaka (bikisa !)
to yoki pe o limbisaka (limbisa !)
bisika nionso oyo to ke to luki, o kangi bisaka (sala !)
yokela biso pe mawa (nkolo)
litey’ango to zwa na fimbo (solo !)
wapi lola ‘ngo to yoka na sango, pesa biso ata pimbo (kasi…)
po to za ba yindo, yango na moni o pona ko sundola biso (pasi !)
soki bongo te, nkolo limbisa. kasi, fungola miso !
[refrain]
ba yindo to sala yo nini kolo ? (tala !)
o ke ko batama likolo (kala !)
ba pasi na biso yaka o silisa (mawa !)
kita o sunga bato o zelisa (sala !)
to sala yo nini kolo ? (tala !)
o ke ko batama likolo (kala !)
ba pasi na biso yaka o silisa (mawa !)
kita o sunga bato o zelisa (sala !)

[outro]
kita o sala !
kita o sala !
bana ba leli, ba lobi ba zeli mosungi
kita o sala !
ba yaya ba leli, ba lingi ba lia musuni
kita o sala !


Lirik lagu lainnya:

LIRIK YANG LAGI HITS MINGGU INI

Loading...