
lirik lagu franco luambo & tabu ley rochereau - ngungi
nazoki molangi eh (nazoki molangi eh)
nga mwana mama
napesa nzoto na nga na nzambe
mosolo nakoliaka se na nzembo
mopepe nga nakopemaka oyo ya bato nionso
mosuni ya nzoto na nga suka ya elengi
moto nionso akoluka kaka a goûter mama
luambo eh eh
pona nini mosuni ya nzoto ya mwana ya moto
bolingi bolia yango lokolo mosuni nde ya niama?
bokokende na yango wapi na kinshasa oyo?
botika asala, asala akoba
bolingi nini na nzoto na ye bandeko?
ley yamba nalembi bato oyo eh ley
kinshasa makambo eh (kinshasa makambo eh)
ngai mwana ya mama
nasi namesana na kotongo
matoyi emesana na koyoka
nzoto ekoma libanga pona masolo ya bato
nalandaka te nzambe
luambo alanga nzembo, nasala nini eh ye eh
bato mobimba bakovanda se masolo ya bato
balingi ko déstabiliser bato nionso bandeko
tosala nini na matongi?
kinshasa ekobeba na matongi
kotongo bato butu moyi kaka kolembe tе
ley, soki olandi bato oyo bandeko
okoya kobunga nzela ya mosala
okotika bana na mwasi ba souffrir pona bango
lеy yemba bandeko, ley
naye mboka mopaya (naye mboka mopaya eh)
oh luambo
basasi nga na sima se kosasa
balambi lok~mu na nga na ndunda ya bololo
bakombi ndako na nga na kombo ya mbanzi
luambo oh yo yo yo alanga nzembo nasala nini oh?
nzoto ya mwana ya moninga botika evanda pembeni
boko longola musuni bokotika makila na nani?
makila ngungi amela, amela, alemba
avimba libumu oyo ya moke soki obeti mbata epasuka
ley yemba nalembi bato oyo bandeko
oh ley, le, ley
nazoki molangi eh (nazoki molangi eh)
oh luambo
napesa nzoto na nga na nzembo
mosolo nakoliaka se na nzembo
mopepe nga nakopemaka oyo ya bato nionso
mosuni ya nzoto na nga suka ya elengi
moto nionso akoluka kaka a goûter mama
elengi nini bakoyoka bongo luambo eh
bakolembe te tika bango baloba ley mama
bakotonga, bakotonga tika bango batonga ley mama
likambo bamesana na yango bakoki kotika te
babokwama boye, basala bango boye
tokoloba nini biso tolembi bango bandeko
ngungi eh
nazoki molangi eh (nazoki molangi eh)
oh luambo
napesa nzoto na nga na nzambe
mosolo nakoliaka se na nzembo
mopepe nga nakopemaka oyo ya bato nionso
mosuni ya nzoto na nga suka ya elengi
moto nionso akoluka kaka a goûter mama
elengi nini bakoyoka na kombo na nga luambo eh
moyen pe balia yo mobimba ezali te ley
ozali mwana ya moto babota yo
bakoloba pe bakoloba bakolemba
famille na yo epesa yo nzoto makasi
soki e ceder te tika bango baloba
kokipe te famille na yo malamu eloba
wana okokende kobondela bango à genoux
ley oh mama oh
kinshasa makambo eh (kinshasa makambo eh ley eh)
nga mwana mama
nasi namesana na kotongo
matoyi emesana na koyoka
nzoto ekoma libanga po na masolo ya bato
naloba nini eh oh luambo
alanga nzembo eh oh luambo
loba bayoka eh yembela nga ah
naloba nini ley nalembi
naloba nini ley nga nalembi
kinshasa balingi kaka masolo nde ya bato
balemba te na bandako na bango
na basi na bana kotongo bato eh
surtout biso ba oyo toloba nini ley eh?
tolemba nde koloba
basilisa biso misuni batika mposo toloba nini ley
kinshasa makambo, kinshasa makambo
kinshasa makambo ley eh
nakeyi mboka mopaya (nakeyi mboka mopaya ley eh)
oh luambo
basasi nga na sima se kosasa
balambi lok~mu na nga na ndunda ya bololo
bakombi ndako na nga na kombo ya mbanzi
luambo oh yo yo yo alanga nzembo nasala nini eh mama?
nakanisi tolobi, tolobi, toyembi
nakanisi bayoki biso na mbala oyo
bayoka biso na matoyi bayoka biso na mingongo bandeko
oh kinshasa, kinshasa makambo
kinshasa oyo eh kinshasa makambo ley
kinshasa makambo ngai mwana ya moto
(kinshasa makambo ngai mwana ya moto)
kinshasa makambo ngai mwana ya moto
(kinshasa makambo ngai mwana ya moto)
kinshasa makambo ngai mwana ya moto
(kinshasa makambo ngai mwana ya moto)
Lirik lagu lainnya:
- lirik lagu b.j. thomas - plastic words
- lirik lagu dima baba - konsum
- lirik lagu ventura17 - my love in paris
- lirik lagu maya berović - bla, bla, bla
- lirik lagu la cuca - la cuca llegó
- lirik lagu david shaw and the beat - fever
- lirik lagu yovngmanota - rose
- lirik lagu nerdout - one more game
- lirik lagu rim cash (21) - abonné
- lirik lagu hubert kah - du bist so schön