lirik.web.id
a b c d e f g h i j k l m n o p q r s t u v w x y z 0 1 2 3 4 5 6 7 8 9 #

lirik lagu eswi yo wapi - mbilia bel

Loading...

tika ngai navanda na ngai
tika ngai nabenda nzoto
obandi kopanza na basango bipayi binso
likambo o ngai na nani eh

nayokaki yango nandimi te
kasi namoni lelo mbala misato
makambo oza koboma na nzoto na ngai
tembe yango yo na nani eh

ozali mobali ngai nazali mwasi
tembe yango yo na nani eh
nabangi mobali ya polo~polo lokola yo
oyo pasi eh

obongisaki ngai nandimi
olatisi ngai pe omemi sango
obimisaki ngai bipayi binso
po ya kolakisa se lok~mu na yo moko

okimaki ngai tango nabeli
osalisi ngai ata moke te
bandima mobali na mboka na biso
oyo likambo se kosalisa ah papa

osundoli ngai na famille na tango na pasi
likambo yango ezali awa na motema
obanga lisumu te oza kotongaka
okoloba pona soni eh
tuna ngai nayebisa yo mosala mobali ko nini eh
nzambe atinda adamu na kati ya mokili asalisa eva

moke opesa ngai osilisi maloba
kimobali na yo ya nini oh papa
opesa ngai lopango ata ko ba voitures
ofuti nde niongo ya adamu na eva
bandima mobali na santé ya mwasi
pe na capacité na ye ya kolatisa

tika ngai navanda na ngai
tika napemisa nzoto
nabandi kozwa mopepe moke ya rebours
makambo na yo nabosani eh

oyebisi na bato te ngai nabala te eswi yo wapi eh
ozali koloba te yo osukola ngai epayi wapi eh
ozua ngai wapi eh olula ngai ndenge nini eh
obala ngai tina eh opesi ngai nini eh
oyoki ngai na moto eye ko déranger na tina nini eh
nalata nabonga obeli nde liboma ya tina nini eh
oh tokomi wapi eh mabe na ngai otindi wapi eh
tango nazalaki kolela sentiment otiaki wapi eh
oh nabendi nzoto eh, nabimi na kati ya nzungu eh
eswi yo wapi eh, eswi yo epayi wapi eh oh
eswi yo wapi eh, eswi yo epayi wapi eh

Lirik lagu lainnya:

LIRIK YANG LAGI HITS MINGGU INI

Loading...