lirik.web.id
a b c d e f g h i j k l m n o p q r s t u v w x y z 0 1 2 3 4 5 6 7 8 9 #

lirik lagu 7 femmes - josé nzita

Loading...

toza kaka na besoin na yo
kasi komileisa tomileisa biso moko
komilatisa pe biso moko
kasi tolongola na biso

pesa biso kombo na yo
kasi tomilatisa biso moko
babenga biso, basi na yo (eh yawe)
kasi tomileisaka biso moko

pesa biso kombo na yo
kasi tomilatisa biso moko
babenga biso, basi na yo
kasi tomileisaka biso moko

(alleluia)

soki omoni mwasi akomi komileisa
likama wowoh
mobali aza na mbongo andimi amilatisa
likama wowoh!
soki omoni muasi akomi komileyisa
likama wowoh! (wowoh)

il est écrit : les désires de la femme se porteront vers son mari
posa nionso ya mwasi esilaka na mobali na ye
impossible, la femme seule, alléluia

il est écrit : les désires de la femme se porteront vers son mari
posa nionso ya mwasi esilaka na mobali na ye

lokola mobali oyo ayebana
balingi basalеla mbongo
na ba boutiques pe na mikanda na bango nionso
batie?
kombo ya mobali
hum! po?
apеsa bango valeur
pe?
apesa bango kilo
nzoka!
nzoka babotami na mobali oyo
chambre kutu bakotaka te
eyi oyo mwasi ya ndenge nini oyo
mwasi ya ndenge nini oyo
ya solo, mwasi oyo ya ndenge nini oyo eh
mwasi ya ndenge nini oyo
parce qu’il…

il est écrit : les désires de la femme se porteront vers son mari
posa nionso ya mwasi esilaka na mobali na ye
basi oyo nazoyemba
bazalaki sambo
oyo esaïe amonaka
ekokani na mangomba sambo
ya tango na suka
yesu akufela
bandimi kolata kombo na yesu
kasi na misala eza ya bango moko
bakomi kombo na yesu minene na ba ndako na bango
na kati, yesu aza te
balingi kofanda na kiti ya liboso
po bapesa bango valeur
respect na kombo na yesu
bamisaleli ba citernes creuse
vase oyo ebombaka mayi te
batiki source d’eau vive
bokozua zemi ndenge nini
po mwasi azuaka zemi
kaka soki alali na mobali
lolendo ya pamba ozo sala
oza na yo kutu bolumbu
bilamba na yo esi ebeba
mafuta nionso bapesaki yo
esi oteka
batteries na yo ekoma low bat
yaka
yaka nalatisa yo (yaka nalatisa yo)
longola lolendo na yo (mobali aleli)
laodicée, yo mwasi ya sambo
mobali azobondela yo
yaka…

yaka nalatisa yo (abondeli yaka)
longola lolendo na yo (akolela, yaka)
laodicée yo mwasi ya suka
mobali azobondela yo

vous êtes fiancés à un seul époux
afin de vous présenter devant lui comme une vierge pure
comme une église sans tache, ni ride, ni rien de semblable, alléluia

toma paulo azalaka na zemi
azuaki yango epayi ya mobali
ye lokola azalaka na komikitisa
alalaki na mbeto ya mobali
abotaki mwana kombo la foi
na ba nations oyo biso tozali
tomoni na zemi
ozotambola na zemi
ozui yango na mobali nini?
soki oboti mwana
okopesa kombo ya nani?
po mwana azuaka kombo ya papa
tika komisala lolendo
oyo ozo loba ozui yango wapi eh
yaka

yaka nalatisa yo
longola lolendo na yo
(yaka kozua boyebi)
laodicée, yo mwasi ya sambo
(alléluia)
mobali azobondela yo
yaka nalatisa yo
longola lolendo na yo
laodicée, yo mwasi ya sambo
(ââââ)
mobali azobondela yo
(ââêêôô)


Lirik lagu lainnya:

LIRIK YANG LAGI HITS MINGGU INI

Loading...